Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato.
Wana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale ; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene.
Milimo mabe ebimaki kati na mobali yango, mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga ya bangulu ekitaki mbangu longwa na ngomba kino kati na ebale mpe ezindaki.
Tomataki na masuwa oyo ewutaki na engumba Adramite mpo na kokende na mabongo ya pembeni-pembeni ya mokili ya Azia, mpe tokendeki ; Arisitarke, moto ya Masedwane ya Tesalonika, azalaki na biso elongo.