19 Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki kotala Yesu, kasi bakokaki te kokoma pene na Ye mpo na ebele ya ebele.
Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba : — Akomi na bokono ya liboma.
Moto moko ayebisaki Ye : — Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya komona yo.