18 Boye, bosala keba na lolenge na bino ya koyoka ! Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na ye oyo azangi, bakobotola ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.
Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ;
Nkolo azongisaki : « Nazali koloba na bino : na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
Nzokande, Bayuda ya Bere bazalaki bato ya boboto koleka bato ya Tesalonika, pamba te bayambaki Liloba na motema mobimba mpe, mokolo na mokolo, bazalaki koyekola na mozindo Makomi mpo na kotala soki makambo oyo Polo azali koteya bango ezali ya solo.
Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.
Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya.