Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 8:1 - Mokanda na Bomoi

1 Sima na yango, Yesu atambolaki na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli nyonso zomi na mibale bazalaki elongo na Ye,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 8:1
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Yesu asilisaki kopesa mitindo epai ya bayekoli na Ye zomi na mibale, alongwaki wana, akendeki koteya mpe kopanza Sango Malamu kati na bingumba na bango.


Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.


Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.


Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge.


Boye, atambolaki na Galile mobimba ; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani mpe kobengana milimo mabe.


Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.


Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye ;


« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama


Bayekoli bakendeki, batambolaki na mboka moko na moko mpe bazalaki kosakola Sango Malamu mpe kobikisa babeli na bisika nyonso.


ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.


Tozali koyebisa bino sango malamu oyo : elaka oyo Nzambe apesaki na bakoko na biso,


Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te ? Kolanda ndenge ekomama : « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ