Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 7:7 - Mokanda na Bomoi

7 Ezali mpe mpo na yango nde namimonaki ete nabongi te mpo na koya epai na Yo. Kasi loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 7:7
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atindaki Liloba na Ye mpe abikisaki bango, akangolaki bango wuta na kunda.


Pamba te alobaki, mpe likambo esalemaki ; mpe apesaki mitindo, mpe emonanaki.


Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »


Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kotunana : — Oyo ezali lisusu likambo nini ? Tala mateya ya sika oyo etondi na nguya ! Azali kopesa mitindo ata na milimo mabe, mpe ezali kotosa Ye !


Bato nyonso bakamwaki mpe bakomaki kotunana : — Oyo ezali lisusu maloba nini ! Azali kopesa mitindo epai ya milimo mabe, na bokonzi mpe na nguya nyonso, mpe yango ezali kobima !


Yesu asembolaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki : — Solo, nalingi yango, koma peto ! Mbala moko, maba esilaki.


Boye Yesu akendeki elongo na bango. Kasi tango akomaki pene ya ndako, mokonzi ya basoda atindaki baninga na ye koloba na Yesu : — Nkolo, komitungisa na Yo te, pamba te nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai.


Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko : « Kende, » akendaka ; mpe na mosusu : « Yaka, » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo, » asalaka yango.


Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.


Yawe abomaka mpe apesaka bomoi, akitisaka bato na mokili ya bakufi mpe asekwisaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ