49 Bato mosusu oyo babengamaki elongo na Ye bakomaki koloba, bango na bango : — Moto oyo azali penza nani, oyo akomi ata kolimbisa masumu ?
Wana Yesu azalaki kolia kati na ndako ya Matayo, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bayaki mpe baliaki mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye.
Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema : — Moto oyo azali kotiola Nzambe !
« Mpo na nini moto oyo azali koloba bongo ? Azali kotiola Nzambe ! Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ? »