45 Opesaki Ngai beze te ; kasi ye, banda nakotaki awa, atiki te kopesa makolo na Ngai beze.
Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi.
Ezawu akimaki mbangu mpo na kokutana na ye ; ayambaki ye, amibwakaki na nzoto na ye mpo na koyamba ye mpe apesaki ye beze ; bongo bakomaki kolela.
Mpe tango nyonso moto azalaki kopusana mpo na kogumbama liboso na ye Abisalomi, Abisalomi azalaki kopesa loboko, koyamba mpe kopesa ye beze.
Mokonzi azongisaki : — Tika ete Kimeami akende elongo na ngai, mpe ngai nakosalela ye makambo oyo ezali malamu na miso na yo. Nakosalela ye nyonso oyo akosenga ngai.
Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko ; alobaki na bango : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokanga ye. »
Bopesanaka mbote bino na bino, na beze ya bule. Mangomba nyonso ya Klisto etindeli bino mbote.
Bandeko nyonso batindeli bino mbote. Bopesanaka bino na bino mbote na nzela ya beze ya bule.
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
Bopesaka bandeko nyonso mbote na nzela ya beze ya bule.