Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 7:44 - Mokanda na Bomoi

44 Bongo abalukaki epai ya mwasi, mpe alobaki na Simona : — Omoni mwasi oyo ? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki Ngai mayi te ya kosukola makolo na Ngai ; kasi ye, apolisi yango na mpinzoli na ye mpe apangusi yango na nzela ya suki na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 7:44
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete namemela bino mwa mayi mpo ete bokoka kosukola makolo mpe bopema na se ya nzete oyo.


Alobaki na bango : — Nabondeli bino, bankolo na ngai, boya na ndako ya mosali na bino. Bokoki kosukola kuna makolo na bino mpe kolekisa butu, bongo na tongo, bokoki kokoba mobembo na bino. Bazongiselaki ye : — Te, tokolala kaka libanda.


Moto yango akotisaki bango na ndako ya Jozefi, apesaki bango mayi ya kosukola makolo mpe abongisaki bilei mpo na ba-ane na bango.


Bongo Davidi alobaki na Iri : « Kende na ndako na yo mpe sukola makolo na yo. » Iri atikaki ndako ya mokonzi ; mpe sima na ye, mokonzi atindelaki ye kado.


atelemaki na sima ya Yesu, na makolo na Ye ; azalaki kolela mpe, na mpinzoli na ye, akomaki kopolisa makolo ya Yesu. Bongo apangusaki makolo yango na nzela ya suki na ye, apesaki yango beze mpe asopelaki yango malasi.


Simona azongisaki : — Nakanisi ete ezali moto oyo balimbisi niongo ya mbongo oyo eleki ebele. Yesu alobaki na ye : — Okati malamu !


Bongo, atiaki mayi na sani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli na Ye mpe kopangusa yango na eteni ya elamba oyo amikangaki na loketo.


kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.


Nzokande bino, bomonaka babola bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na bisambiselo, ezali bazwi te ?


Akotisaki bango na ndako na ye mpe apesaki ba-ane na ye matiti. Sima, basukolaki makolo, baliaki mpe bamelaki.


Abigayili agumbamaki elongi kino na mabele mpe alobaki : — Mwasi mosali na yo, ye oyo ! Abongami mpo na kosalela bino mpe mpo na kosukola makolo ya basali ya nkolo na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ