Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 7:41 - Mokanda na Bomoi

41 Yesu alobaki : — Moto moko adefisaki bato mibale mbongo. Moto ya liboso asengelaki kozongisa mbongo ya bibende nkama mitano, mpe oyo ya mibale, mbongo ya bibende tuku mitano.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 7:41
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.


Yawe alobaki na ngai : « Mopengwi Isalaele azali sembo koleka mopengwi Yuda.


« Tata na biso akufaki na esobe. Azalaki te na molongo na bato oyo bazalaki kolanda Kore, oyo basanganaki lisanga mpo na kotelemela Yawe, kasi akufaki mpo na masumu na ye moko mpe atikaki bana mibali te.


Kasi tango mosali yango abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo adefaki epai na ye mbongo ya bibende nkama moko. Akangaki ye, akomaki kofinafina ye na kingo mpe alobaki na ye : « Futa niongo na ngai. »


limbisa mabe na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe ;


Kasi Yesu azongisaki : — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bayekoli balobaki na Ye : — Ondimi penza tokende kosomba mapa mpe toleisa bango, na mbongo ya bibende nkama mibale ?


limbisa masumu na biso, pamba te biso mpe tolimbisaka moto nyonso oyo asalaka biso mabe ; mpe komema biso na komekama te.


Kasi mosali oyo ayebi te posa ya nkolo na ye mpe asali makambo oyo ebongi na etumbu, akobetama fimbu moke. Na moto oyo bapesi mingi, bakosenga ye mpe mingi ; mpe bakotuna na moto na moto kolanda mokumba oyo bapesi ye : na moto oyo bapesi mingi, bakotuna ye mpe mingi ; mpe na moto oyo bapesi moke, bakotuna ye moke.


Bongo bato wana zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako molayi ya Siloe ekweyelaki bango, bokanisi ete bazalaki bato ya masumu koleka bavandi nyonso ya Yelusalemi ?


Yesu alobaki na ye : — Simona, nazali na likambo ya koyebisa yo. Mofarizeo azongisaki : — Moteyi, loba yango.


Yango wana, nazali koloba na yo : ebele ya masumu na ye elimbisami, lokola atalisi bolingo monene. Kasi moto oyo balimbisaki niongo moke azali kotalisa bolingo moke.


pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe ;


Mobeko eyaki mpo ete lisumu ebotana. Kasi epai lisumu ebotanaki, ngolu efulukaki koleka


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ