Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 7:37 - Mokanda na Bomoi

37 Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki kobika bomoi ya masumu. Tango ayokaki ete Yesu azali kolia na ndako ya Mofarizeo, ayaki wana na molangi ya alibatre etonda na malasi,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 7:37
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nani kati na bango mibale akokisaki mokano ya tata na ye ? Bazongisaki : — Mwana ya liboso. Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino,


Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! »


Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima ; bazalaki koloba : — Tala, akei kolala na ndako ya moto ya masumu !


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?


Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu mpo ete babongola mitema.


Mwana na Moto ayaki, azali kolia, azali komela, mpe bozali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe ya komela masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu ! »


Mofarizeo moko abengisaki Yesu mpo ete alia mesa moko elongo na ye. Yesu akendeki na ndako ya Mofarizeo yango mpe avandaki na mesa mpo na kolia.


Mari azali mwasi oyo asopelaki Nkolo malasi mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo ya Yesu, mpe Lazare oyo azali kobela azali ndeko na ye ya mobali.


Bafarizeo babengisaki lisusu, mpo na mbala ya mibale, moto oyo azalaki mokufi miso mpe balobaki na ye : — Pesa Nzambe nkembo na koloba solo ; biso toyebi ete moto wana azali moto ya masumu.


Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye.


Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye : wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.


Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango : Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu ; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.


Toyebi lisusu ete mibeko esalema te mpo na bato ya malamu kasi mpo na bato mabe mpe batomboki, mpo na bato oyo batosaka Nzambe te mpe bato ya masumu, mpo na bato ya mbindo mpe batioli makambo ya bule, ba-oyo bakoki ata koboma tata mpe mama, mpo na babomi ya bato,


Pamba te Makomi elobi : « Soki ezali na pasi makasi nde moto ya sembo abikisami, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ