Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye ?
Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama, na loketo ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi.
pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.
Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga, bamoko na bamosusu : « Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki te ! »
Mwana na Moto ayaki, azali kolia, azali komela, mpe bozali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe ya komela masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu ! »
Na yango, Bayuda balobaki na Ye : — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te !