Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 7:27 - Mokanda na Bomoi

27 Yoane azali moto oyo Makomi ezali koloba boye na tina na ye : « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo, oyo akobongisela Yo nzela. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 7:27
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mongongo ya moto moko ezali kobelela : « Kati na esobe, bobongisa nzela mpo na Yawe ; kati na mabele ya kokawuka, bosembolela Nzambe na biso nzela moko ya monene.


« Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Pamba te, azali moto oyo bakoma na tina na ye : « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo mpo na kobongisela Yo nzela. »


kolanda ndenge ekomama kati na mokanda ya mosakoli Ezayi : « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo, ye nde akobongisela Yo nzela.


Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo : mosakoli ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te okotambola na liboso ya Nkolo mpo na kobongisela Ye nzela


Kasi nani bino bokendeki penza kotala ? Mosakoli ? Iyo, nazali koloba na bino, mpe aleki kutu ata mosakoli.


Nazali koloba na bino : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Nzambe aleki Yoane Mobatisi na monene.


Yoane azongiselaki bango kolanda ndenge mosakoli Ezayi alobaki : — Ngai, nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela kati na esobe : « Bobongisa nzela mpo na Nkolo ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ