Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 7:24 - Mokanda na Bomoi

24 Tango bato oyo Yoane atindaki bazongaki, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane : — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 7:24
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mobulu lokola mayi, okokende liboso te, pamba te omataki na mbeto ya tata na yo, esika oyo ngai nalalaka, mpe okomisi yango mbindo.


Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.


Ana mpe Kayifa bazalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe. Na mobu yango, Nzambe alobaki na Yoane, mwana mobali ya Zakari, kati na esobe.


Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !


Soki te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alata bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko mpe bamisepelisaka kati na bozwi na bango bavandaka kati na bandako ya bakonzi.


Yoane azongiselaki bango kolanda ndenge mosakoli Ezayi alobaki : — Ngai, nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela kati na esobe : « Bobongisa nzela mpo na Nkolo ! »


Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.


Bateyi yango ya lokuta bazali lokola bitima oyo ebimisaka lisusu mayi te to lokola mapata oyo mopepe makasi etindikaka. Nzambe abombela bango esika kati na molili makasi.


Balingami na ngai, lokola bosili kozwa boyebi oyo, bosala keba ete bomemama te na mopepe ya mabunga ya bato oyo batosaka Nzambe te, mpo ete bobungisa te kondima na bino ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ