Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 7:22 - Mokanda na Bomoi

22 Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki : bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 7:22
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazalaki miso ya mokufi miso mpe makolo ya mokakatani ;


Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ; Yawe alingaka bato ya sembo.


nakomema bakufi miso na nzela oyo batikala nanu koyeba te, nakotambolisa bango na nzela oyo bamesana kotambola te ; nakobongola molili pole liboso na bango, mpe nakokomisa nzela ya nyoka-nyoka nzela ya alima. Tala makambo oyo nakosala, nakotika yango te.


Bimisa bato oyo bazali na miso, kasi bamonaka te ; bato oyo bazali na matoyi, kasi bayokaka te.


Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili. Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani, basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota ; bato ebele penza bakozonga.


Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela, bato oyo batambolaka na komikitisa, bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.


bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Bakufi miso mpe bato oyo batambola tengu-tengu bapusanaki pene na Yesu kati na lopango ya Tempelo, mpe abikisaki bango.


« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama


Kaka na tango, Yesu abikisaki bato ebele na bokono, na pasi mpe na milimo mabe, mpe afungolaki miso ya bakufi miso ebele.


Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !


Natanaele atunaki ye : — Boni, eloko ya malamu ekoki mpe kobima na Nazareti ? Filipo azongiselaki ye : — Yaka mpe okomona yo moko.


mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »


Pamba te milimo ya mbindo ezalaki kobima kati na bato mingi na koganga makasi, mpe bato mingi oyo bakufa makolo mpe oyo batambolaka tengu-tengu babikaki.


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ