Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 7:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba : — Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 7:16
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato oyo bavandaka na basuka ya mokili babangaka tango bamonaka bikamwa na Yo ; osalaka ete este mpe weste eganga na esengo.


Bato bandimaki. Bongo tango bayokaki ete Yawe akanisaki bana ya Isalaele mpe amonaki pasi na bango, bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.


Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›


Mpe bato bakamwaki mingi tango bamonaki ete bababa bakomi koloba, bato oyo bakufa makolo to maboko babiki, bato oyo batambolaka tengu-tengu bakomi kotambola malamu mpe bakufi miso bakomi komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isalaele.


Bato bazalaki kozongisa : — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile !


Balongwaki noki na kunda, na somo mpe na esengo makasi ; bapotaki mbangu mpo na kokende kopesa sango epai ya bayekoli na Ye.


Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato.


Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na somo mpe bazalaki kolobela makambo yango nyonso, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.


« Tika ete Nkolo, Nzambe ya Isalaele, akumisama, pamba te ayei mpe akangoli bato na Ye ;


bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.


Babateli bibwele bazongaki na kokumisa mpe kosanzola Nzambe mpo na makambo nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki, pamba te makambo nyonso esalemaki ndenge anjelu ayebisaki bango yango.


Yesu atunaki bango : — Makambo nini ? Bazongisaki : — Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti : azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso.


Awa bato nyonso bakamwaki, bakomaki kokumisa Nzambe ; awa mpe somo ekangaki bango, bakomaki koloba : « Lelo penza, tomoni makambo ya kokamwa ! »


Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !


Moto oyo akufaki avandaki mpe abandaki koloba ; mpe Yesu azongisaki ye epai ya mama na ye.


Tango Mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, amilobelaki : — Soki moto oyo azali mosakoli, alingaki koyeba soki mwasi oyo azali kosimba Ye azali nani, mpe soki azali mwasi ya lolenge nini : moto ya masumu.


Bongo bato nyonso ya etuka ya bato ya Geraza basengaki na Yesu ete alongwa na etuka na bango, pamba te somo ekangaki bango. Boye Yesu amataki na bwato mpe akendeki.


Bazongisaki : — Bamoko bazali koloba ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli ya kala oyo asili kosekwa.


Batunaki ye lisusu : — Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ? Azongisaki : — Nazali Eliya te. Batunaki ye lisusu : — Ozali mosakoli ? Azongisaki : — Te !


Batunaki ye lisusu : — Soki ozali Masiya te, Eliya te to mpe mosakoli te, bongo mpo na nini ozali kobatisa ?


Mwasi yango alobaki na Yesu : — Nkolo, namoni ete ozali mosakoli.


Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »


Batunaki lisusu mokufi miso : — Bongo yo, olobi nini na tina na ye, pamba te ezali miso na yo nde abikisi ? Azongiselaki bango : — Azali mosakoli.


Tango Ananiasi ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo.


Ezalaki kaka Moyize wana oyo alobaki na bana ya Isalaele : « Nzambe akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino. »


Mpe bazalaki kokumisa Nzambe na tina na ngai.


Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino ; bosengeli koyoka ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ