Bongo Yesu alobaki na ye : — Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo ! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda : — Zonga na ndako na yo ! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo ! Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki.
Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki ye mingi ; bongo abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda Ye mpe alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezala kati na Isalaele, natikali nanu komona te kondima ya boye.