Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 6:7 - Mokanda na Bomoi

7 Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 6:7
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai bakimi pasi na ngai, ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.


elongo na bato oyo bakweyisaka bato kati na kosamba mpo na liloba moko, elongo na bato oyo batielaka basambisi mitambo mpe bapesaka matatoli ya lokuta, na kosambisama, mpo na kokweyisa moto ya sembo.


Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi.


Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye.


Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato : — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala ! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te !


Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli.


Kati na Bafarizeo, bamoko balobaki : — Moto oyo awuti epai ya Nzambe te, mpo ete azali kotosa te mokolo ya Saba. Kasi bamosusu balobaki : — Ndenge nini moto ya masumu akoki kozwa bokonzi ya kosala bikamwa ya ndenge wana ? Bokabwani ekotaki kati na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ