5 Yesu alobaki na bango lisusu : — Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.
Bongo alobaki na bango lisusu : — Mokolo ya Saba esalema mpo na moto, kasi moto asalema te mpo na mokolo ya Saba.
Lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : — Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, boyoka Ye !
Akotaki kati na Ndako ya Nzambe, akamataki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe, aliaki yango mpe apesaki yango epai ya baninga na ye. Nzokande, Banganga-Nzambe kaka nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.
Mokolo mosusu ya Saba, Yesu akotaki kati na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. Ezalaki kuna na moto moko akufa loboko ya mobali.
Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo