Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 6:47 - Mokanda na Bomoi

47 Moto nyonso oyo ayaka epai na Ngai, ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango na misala, nazali kolakisa bino soki akokani na nani :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 6:47
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.


Pamba te moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.


Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »


Yesu azongisaki : — Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !


— Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.


akokani na moto oyo, mpo na kotonga ndako, atimolaki mabele, akitaki penza na mozindo mpe atongaki moboko ya ndako yango na likolo ya libanga ; tango mpela eyaki, mayi emataki makasi mpe emibwakaki na ndako yango kasi ekokaki te kobuka yango, pamba te etongamaki malamu.


Nkona oyo ekweyaki na mabele etonda na mabanga ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe bayambaka yango na esengo, kasi batikaka yango te kozwa misisa : bandimaka kaka mpo na mwa tango moke ; soki komekama eyei, basundolaka mbala moko kondima.


Kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete : nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki : — Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !


Bameme na Ngai eyokaka mongongo na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai.


Wana bosili koyeba makambo oyo, bozali bato ya esengo soki kaka botie yango na misala.


Soki bolingaka Ngai, bokobatela mibeko na Ngai.


kasi boboyi na bino koya epai na Ngai mpo na kozwa bomoi.


Yesu azongiselaki bango : — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.


Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai.


Na yango, Bayuda balobaki na Ye : — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te !


Mpe tango kaka Nzambe akomisaki Ye ya kokoka, akomaki, mpo na bato nyonso oyo batosaka Ye, Mopesi lobiko ya seko ;


Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.


Bopusana pene ya Ye oyo azali Libanga ya bomoi, Libanga oyo bato babwakaki, kasi Nzambe aponaki yango mpo ete ezali motuya mingi na miso na Ye.


Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino ; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te.


Boyebi malamu ete Klisto azali sembo ; boye bosengeli mpe koyeba ete moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo azali mwana na Nzambe.


Bana na ngai, tika ete moto moko te akosa bino. Moto oyo atambolaka na bosembo azali sembo ndenge Ye moko Klisto azali sembo.


Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ