Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 6:41 - Mokanda na Bomoi

41 Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 6:41
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga ; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango : Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda ; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye.


Kasi kati na bango, Joabi atangaki te ekolo ya Levi mpe ya Benjame ; pamba te etinda ya mokonzi esepelisaki ye te.


Kati na motema na ngai, nazali na sango kowuta na Nzambe na tina na bato mabe oyo batondi na masumu : Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango.


Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?


Lokola asosoli mabe na ye nyonso oyo azalaki kosala mpe atiki yango, akozala solo na bomoi, akokufa te.


Bosambisaka te mpo ete, bino mpe, basambisa bino te.


Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike-mike. Apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli na Ye ete bakabola yango.


Moyekoli alekaka molakisi na ye te, kasi moyekoli nyonso oyo bateyi malamu akozala lokola molakisi na ye.


Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso na yo, › wana ozali kokoka komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko. Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo okomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.


Lokola bakobaki kaka kopesa Ye mituna, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango : — Tika ete moto oyo, kati na bino, asala nanu lisumu te abamba ye libanga moto ya liboso.


Yango wana, yo moto oyo osambisaka bato mosusu, ozali na ngambo, ata soki ozali nani ; pamba te wana osambisaka bato mosusu, omisambisaka yo moko, mpo ete yo oyo osambisaka bango osalaka mpe kaka makambo yango.


mpe, sima na ye komitala, akei mpe, kaka na tango yango, abosani ndenge azali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ