bato oyo balobaka : ‹ Zala mosika na Ngai, kopusana pene na Ngai te, pamba te nazali bule makasi na miso na yo ! › Bato ya lolenge oyo bazali lokola milinga na zolo na Ngai, lokola moto oyo epelaka mikolo nyonso.
Mpe tango botelemaka mpo na kosambela, soki bozali na likambo oyo bozwaki na yango moto songolo, bolimbisa ye mpo ete Tata na bino, oyo azali na Likolo alimbisa mpe masumu na bino. [
Biso te ! Ezali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso, nde apesi nkembo na Yesu, Mosali na Ye, oyo bino bokabaki mpo ete baboma Ye. Yango wana, bowanganaki Ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola Ye.