Luka 6:34 - Mokanda na Bomoi34 Soki bodefisaka kaka na bato oyo bozali na elikya ete bakoki kofuta bino niongo oyo bodefisaka bango, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe badefisaka baninga na bango, bato ya masumu, na elikya ete bakofuta bango niongo yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.