31 Oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango.
Mobeko ya mibale oyo ekokani na yango : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
Nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango ; pamba te yango nde mateya nyonso ya Mobeko mpe ya basakoli.
Pesa na moto nyonso oyo asengi yo ; mpe soki moto akamati eloko na yo, kosenga te ete azongisela yo yango.
Pamba te Mobeko nyonso ekokisami kati na liloba kaka moko : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »