Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki : — Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo ?
Napesaki mokongo na ngai epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, matama na ngai, epai ya bato oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. Nabombaki elongi na ngai te na kotiolama mpe na basoyi.
Bongo yo, Beteleemi Efrata, atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda, ye oyo akokonza Isalaele akowuta kati na yo. Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza, wuta na ebandeli ya tango.
Tango kaka Yesu alobaki bongo, moko kati na bakengeli oyo bazalaki wana abetaki Ye mbata na koloba : — Boni ! Ezali bongo nde ozali kozongisela mokonzi ya Banganga-Nzambe ?
Solo, awa bozali kofundana bino na bino, boyeba ete bosili komikweyisa. Mpo na nini bondimaka te ete basala bino mabe ? Mpo na nini bondimaka te ete bakosa bino ?
Bokabolaki pasi elongo na bakangami ya boloko, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola ata biloko na bino, pamba te boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko koleka, bomengo oyo ekowumela libela na libela.