Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 6:27 - Mokanda na Bomoi

27 Kasi, na bino oyo bozali koyoka Ngai, nalobi : Bolingaka banguna na bino mpe bosalelaka bayini na bino bolamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 6:27
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi alobaki na moto na Nzambe : — Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpe sambela mpo na ngai ete loboko na ngai ebonga. Moto na Nzambe abondelaki Yawe, mpe loboko ya mokonzi ebongaki, ezongaki ndenge ezalaki liboso.


Yawe, Nzambe na ngai, soki nasalaki makambo oyo bazali kopamela ngai mpo na yango, mpe soki ezali na mabe na maboko na ngai,


Soki monguna na yo akweyi, kosepela te ; mpe soki apengwi, tika ete motema na yo esepela te ;


Nzambe azwaka nkembo mpo ete asalaka makambo oyo bato bayebaka te, mpe bakonzi bazwaka nkembo mpo ete balukaka kososola tina ya makambo.


Alobaki lisusu : — Bosala keba na makambo oyo bozali koyoka ! Bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu, mpe bakobakisa kutu lisusu koleka ;


Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala . Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.


Esengo na bino tango bato bazali koyina bino, tango bazali kobengana bino, tango bazali kofinga bino, mpe tango bato bazali kosambwisa kombo na bino, likolo na Mwana na Moto !


Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.


Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.


Boye, bosala keba na lolenge na bino ya koyoka ! Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na ye oyo azangi, bakobotola ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.


Kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete : nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki : — Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !


ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.


Kasi Polo agangaki na mongongo makasi : — Komisala mabe te ! Biso nyonso tozali awa !


Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi : — Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te ! Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.


Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.


Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.


Molingami na ngai, komekolaka mabe te, mekolaka nde bolamu. Moto oyo asalaka bolamu azali ya Nzambe, kasi moto oyo asalaka mabe ayebi Nzambe te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ