Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 6:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bayaki mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango. Ba-oyo milimo mabe ezalaki kotungisa bakangolamaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 6:18
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga : — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.


— Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa ! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi : akweyaka mbala mingi na moto to na mayi.


Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene.


Bato nyonso balukaki kosimba Ye, pamba te nguya moko ezalaki kobima kati na Ye mpe ezalaki kobikisa bato nyonso.


Mpe lisusu, bato ebele oyo bazalaki kowuta na bingumba ya zingazinga bazalaki kosangana na Yelusalemi ; bazalaki komema babeli na bango mpe bato oyo bazalaki kotungisama na milimo ya mbindo ; mpe bango nyonso bazalaki kobikisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ