Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 6:17 - Mokanda na Bomoi

17 Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 6:17
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso, abikisaka yo na bokono nyonso,


Alobaki : — Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu !


Wana Yesu asosolaki ete basali mabongisi ya koboma Ye, alongwaki na esika yango. Bato ebele balandaki Ye, mpe abikisaki babeli nyonso.


Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela.


Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni.


Tango Yesu amonaki ebele yango ya bato, amataki likolo ya ngomba mpe avandaki. Bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye,


Sango na tina na Yesu ezalaki kaka kopanzana se kopanzana, mpe bato ebele bazalaki koya kosangana mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango.


Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe.


Yuda, mwana mobali ya Jake, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.


Bayaki mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango. Ba-oyo milimo mabe ezalaki kotungisa bakangolamaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ