Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 6:15 - Mokanda na Bomoi

15 Matayo, Toma ; Jake, mwana mobali ya Alife, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 6:15
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.


Wana azalaki kotambola, amonaki Levi, mwana mobali ya Alife, avandi na ndako ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Levi atelemaki mpe alandaki Ye.


Andre, Filipo, Bartelemi, Matayo, Toma, Jake, mwana mobali ya Alife ; Tade, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote,


Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye « Levi. » Levi azalaki ya kovanda na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. »


Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » Andre, ndeko na ye ; Jake, Yoane, Filipo, Bartelemi ;


Yuda, mwana mobali ya Jake, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.


Na bongo, Toma, oyo bazalaki mpe kobenga « Lipasa, » alobaki na bayekoli mosusu : — Biso mpe, tokende mpo ete tokufa elongo na Yesu !


Toma, moko kati na bayekoli zomi na mibale, oyo babengaka Lipasa, azalaki te elongo na bayekoli tango Yesu ayaki.


Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, kati na etaje epai wapi bazalaki kosangana mbala na mbala. Ezalaki : Petelo, Yoane, Jake, Andre, Filipo, Toma, Bartelemi, Matayo ; Jake, mwana mobali ya Alife ; Simona oyo azalaki moto ya lingomba ya Bazelote ; mpe Jide, mwana mobali ya Jake.


Tango basilisaki koloba, Jake azwaki maloba mpe alobaki : — Bandeko, boyoka ngai !


Natikalaki komona ntoma mosusu te, longola kaka Jake, ndeko ya Nkolo.


Boye Jake, Petelo mpe Yoane oyo bazalaki makonzi ya Lingomba bandimaki ngolu oyo Nzambe apesaki ngai. Yango wana basanganaki elongo na ngai mpe Barnabasi mpo na kolakisa ete tokomi moko ; mpe toyokanaki ete biso tokende epai ya Bapagano, mpe bango bakende epai ya bato oyo bakatama ngenga.


Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto ; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko : Napesi bino mbote.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ