Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 6:14 - Mokanda na Bomoi

14 Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » Andre, ndeko na ye ; Jake, Yoane, Filipo, Bartelemi ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 6:14
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale : liboso, Simona oyo kombo na ye mosusu ezalaki Petelo ; Andre, ndeko ya Petelo ; Jake, mwana mobali ya Zebede ; Yoane, ndeko ya Jake ;


Filipo mpe Bartelemi ; Toma mpe Matayo, mofutisi mpako ; Jake, mwana mobali ya Alife, mpe Tade ;


Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale : Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.


Tango alongwaki wana mpo na kokoba mobembo na Ye, amonaki lisusu bandeko mibali mibale : Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye. Bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango elongo na Zebede, tata na bango. Yesu abengaki bango ;


Wana Yesu akobaki kotambola, amonaki na mosika Jake, mwana mobali ya Zebede, oyo azalaki elongo na Yoane, ndeko na ye ; bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango.


Tango Yesu abimaki na ndako ya mayangani, akendeki elongo na Jake mpe Yoane na ndako ya Simona mpe Andre.


Wana amemaki Petelo, Jake mpe Yoane, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ;


Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo aponaki : Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; »


Atikaki moto moko te kolanda Ye longola kaka Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko ya Jake.


Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi epai wapi bazalaki kaka bango moko. Yesu abongolamaki na miso na bango :


Ndenge moko mpe mpo na Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simona. Bongo Yesu alobaki na Simona : — Kobanga te ! Kobanda lelo, okokoma koloba nde bato.


Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !


Na tongo, abengaki bayekoli na Ye pene na Ye mpe aponaki bato zomi na mibale kati na bango, ba-oyo akomaki kobenga « bantoma. » Ezalaki :


Matayo, Toma ; Jake, mwana mobali ya Alife, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote ;


Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye : — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.


Filipo alobaki na Yesu : — Nkolo, lakisa biso Tata ; tozali na posa ya eloko mosusu te.


Tango Yesu atombolaki miso, amonaki ebele ya bato penza koya epai na Ye ; alobaki na Filipo : — Tokosomba mapa wapi mpo na koleisa bato oyo nyonso ?


Moko kati na bayekoli na Ye, oyo kombo na ye ezali Andre, ndeko mobali ya Simona Petelo, alobaki na Ye :


Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, kati na etaje epai wapi bazalaki kosangana mbala na mbala. Ezalaki : Petelo, Yoane, Jake, Andre, Filipo, Toma, Bartelemi, Matayo ; Jake, mwana mobali ya Alife ; Simona oyo azalaki moto ya lingomba ya Bazelote ; mpe Jide, mwana mobali ya Jake.


Abomaki kutu Jake, ndeko mobali ya Yoane, na mopanga.


Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ