Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 6:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 6:12
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai ? Mpo na nini otelemi mosika ? Mpo na nini ozali kobikisa ngai te ? Mpo na nini ozali koyoka te koganga na ngai ?


Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo ; kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi, pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo tango opesaka mabele bitumbu.


Boye, mokonzi Dariusi akomaki mokano oyo azwaki mpo ete babongola yango te mpe atiaki mokoloto na mokano yango.


Tango Yesu amonaki ebele yango ya bato, amataki likolo ya ngomba mpe avandaki. Bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye,


Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela.


Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo azalaki na bosenga na bango, mpe bakendeki epai na Ye.


Sima na Ye kozongisa bato yango, amataki na ngomba mpo na kosambela.


Kasi mbala mingi, Yesu azalaki kokende na bisika epai wapi azalaki kaka Ye moko mpo na kosambela.


Kasi balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo basilikaki makasi mpe bakomaki kolobana mpo na koluka likambo oyo bakoki kosala Yesu.


Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene.


Mokolo moko, wana Yesu azalaki kosambela na pembeni, mpe bayekoli na Ye bazalaki elongo na Ye, atunaki bango : — Bato bazali koloba nini na tina na Ngai ? Mpo na bango, Ngai nazali nani ?


Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.


Wana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali.


Yango wana Yesu amataki na ngomba mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye.


Bozalaka na molende ya kosambela, bosenzelaka mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.


Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.


— Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai. Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ