Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 6:11 - Mokanda na Bomoi

11 Kasi balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo basilikaki makasi mpe bakomaki kolobana mpo na koluka likambo oyo bakoki kosala Yesu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 6:11
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi : bato nyonso basukaka kaka ndenge moko ; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi ; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.


Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango : — Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te !


Sima na bango koyoka masese na Ye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basosolaki ete Yesu azalaki koloba na tina na bango.


Bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako ya mayangani basilikaki makasi tango bayokaki bongo ;


Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki.


Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe.


Bongo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo babengisaki Likita-Monene mpe batunanaki : — Tosala nini ? Moto oyo azali kosala bikamwa mingi.


Sima na yango, Yesu atambolaki na mokili ya Galile, aboyaki kovanda na Yuda, pamba te Bayuda bazalaki koluka koboma Ye.


Kati na bandako nyonso ya mayangani, nazalaki mbala mingi kotambola mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete bafinga Yesu-Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.


Bongo, bapesaki mitindo ete babimisa bango na Likita-Monene ; mpe batikalaki bango moko mpo na koyekola likambo yango malamu.


Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango : — Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe : kotosa bino to kotosa Nzambe ?


Tango bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bazwaki mokano ya kobomisa bantoma.


Tango bato ya Likita-Monene bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bakomaki kolia minu mpo na Etieni.


Kasi bakokende mosika te, pamba te bozoba na bango ekomonana na miso ya bato nyonso, ndenge ezalaki mpo na mibali wana mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ