1 Mokolo moko ya Saba, wana Yesu azalaki kotambola kati na bilanga ya ble, bayekoli na Ye babandaki kobuka ble ; mpe, sima na bango kolongola yango baposo na maboko, baliaki bambuma na yango.
Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. Na mokolo ya liboso, bokolongola levire na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya sambo, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele.