Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?
Nalobaki : « Mawa na ngai ! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! »
Bakomaki na ndako yango, bamonaki Mwana elongo na Mari, mama na Ye, mpe bagumbamelaki Ye ; bongo bafungolaki mabenga na bango mpe babonzelaki Ye biloko oyo lokola bakado : wolo, malasi ya ansa mpe mire.
Mokonzi ya basoda alobaki : — Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.
Tango kaka Mari akomaki na esika oyo Yesu azalaki mpe amonaki Ye, amibwakaki na makolo na Ye mpe alobaki : — Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te !
Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai : « Kobanga te ! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.