7 Boye babengaki baninga na bango, oyo bazalaki kati na bwato mosusu mpo ete baya kosalisa bango. Baninga yango bayaki, batondisaki babwato nyonso mibale, mpe ekomaki kozinda.
Soki omoni ane ya moto oyo ayinaka yo ekweyi na se ya mokumba oyo yango ememi, okotika yango wana te ; osengeli kosalisa yango.
Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.
Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango.
Tango basalaki bongo, bazwaki bambisi ebele, kutu minyama na bango ebandaki kopasuka.
Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !
Bongo, Barnabasi akendeki na Tarse mpo na koluka Saulo ;
Bomemisana mikumba bino na bino ; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto.
Solo, nasengi lisusu na yo moninga na ngai ya motema kati na mosala : sunga basi oyo, pamba te babundaki mpo na Sango Malamu, elongo na ngai, Klema mpe baninga mosusu ya mosala oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi.