Balobi mbisi bakobanda kovanda na bangambo ya ebale monene, wuta na Eyini-Gedi kino na Eyini-Egilayimi, mpo na kobwaka minyama mpe kozwa bambisi ya lolenge nyonso lokola bambisi oyo ezalaka na ebale monene.
Yesu atunaki : — Nani asimbi Ngai ? Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu : — Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo.
Yoane alobaki : — Moteyi, tomonaki moto moko kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe tomekaki kopekisa ye, pamba te azali moto ya lisanga na biso te.
Simona Petelo alobaki na bango : — Bandeko na ngai, nakeyi na ngai koloba mbisi ! Balobaki na ye : — Biso mpe tokende elongo na yo ! Bakendeki mpe bamataki na bwato ; kasi na butu wana, bazwaki ata mbisi moko te.