Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango ; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.
Alobaki na bango : — Bobwaka monyama na ngambo ya loboko ya mobali ya bwato, mpe bokozwa bambisi. Boye, babwakaki monyama mpe bakokaki lisusu te kobenda yango longwa na mayi, pamba te etondaki na bambisi ebele.