Ezali mpe ndenge moko mpo na vino ya sika : batiaka yango te kati na bambeki ya kala, noki te bambeki ekopasuka, vino ekosopana mpe bambeki ekobeba libela. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika ; na bongo, vino mpe bambeki ekobatelama malamu.
Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo : — Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala ; soki te, akopasola na pamba elamba ya sika mpe kitendi ya sika ekobalana te na elamba ya kala.
basalelaki mayele mabe : babongolaki lolenge na bango, batiaki na likolo ya ba-ane na bango basaki epasuka-pasuka mpe bambeki ya kala ya vino oyo etoboka-toboka mpe babamba-bamba.