Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 5:32 - Mokanda na Bomoi

32 Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu mpo ete babongola mitema.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 5:32
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo. [


Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.


Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakonzi ya Banganga-Nzambe bakabaki Yesu na maboko na ye.


Na tango wana, moto oyo bazalaki kobenga « Barabasi » azalaki kati na boloko elongo na batomboki oyo bayeisaki mobulu kati na engumba mpe babomaki moto.


Tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.


Na nzela yango, nazali koloba na bino : ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.


Na nzela yango, nazali koloba na bino : esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.


Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.


mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »


Yesu azongiselaki bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te, ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.


Bafarizeo balobaki na Yesu : — Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe bayekoli ya Bafarizeo bakilaka bilei mbala na mbala mpe bamipesaka na mabondeli ; kasi bayekoli na yo, mosala na bango kaka kolia mpe komela ?


Nzokande, lokola Nzambe atalaka te tango ya kozanga boyebi, kasi azali sik’oyo kosenga ete bato nyonso, na bisika nyonso oyo bazali, babongola mitema.


Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.


Nazalaki tango nyonso kosenga, ezala na Bayuda to na bato ya Grese, ete bazongela Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe batia kondima na bango kati na Yesu, Nkolo na biso.


Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai ya Nzambe mpo ete alimbisa masumu na bino,


Tango Nzambe asekwisaki Mosali na Ye, atindaki Ye nanu epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola, moko na moko kati na bino, mosika na banzela na bino ya mabe.


Ezali Ye nde Nzambe atomboli na nzela ya loboko na Ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bana ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango.


Bato ebele bakanisaka ete Nkolo azali kowumela mpo na kokokisa elaka na Ye ; nzokande azali nde kokanga motema mpo na bino, pamba te alingi ete moko te abunga, kasi alingi ete bato nyonso babongola mitema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ