3 Moko kati na babwato yango ezalaki ya Simona. Yesu amataki na bwato yango mpe asengaki na Simona ete apusa yango mwa mosika longwa na mokili. Bongo avandaki mpe abandaki koteya bato wuta na bwato.
Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale : Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, azongaki kati na lopango ya Tempelo ; mpe lokola bato nyonso bayaki kozingela Ye, avandaki mpe abandaki koteya bango.