Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 5:27 - Mokanda na Bomoi

27 Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye « Levi. » Levi azalaki ya kovanda na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 5:27
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Filipo mpe Bartelemi ; Toma mpe Matayo, mofutisi mpako ; Jake, mwana mobali ya Alife, mpe Tade ;


Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.


Kasi Yesu alobaki na ye : — Landa Ngai ! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.


Andre, Filipo, Bartelemi, Matayo, Toma, Jake, mwana mobali ya Alife ; Tade, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote,


Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye : — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.


Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galile. Na nzela, akutanaki na Filipo mpe alobaki na ye : « Landa Ngai. »


Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ