Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 5:24 - Mokanda na Bomoi

24 Kasi nalingi boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono : « Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe kende na ndako na yo ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 5:24
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.


Kati na bimoniseli na ngai ya butu, namonaki moto moko lokola Mwana na Moto koya elongo na mapata ya likolo ; apusanaki pene ya Mpaka oyo azala liboso ya tango, mpe bamemaki ye liboso na Ye.


Tango Yesu akomaki na etuka ya Sezarea ya Filipo, atunaki bayekoli na Ye : — Bato balobaka ete Mwana na Moto azali nani ?


Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.


Yesu azongiselaki ye : — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.


Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.


Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.


Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono : — Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.


Yesu asembolaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki : — Solo, nalingi yango, koma peto ! Mbala moko, maba esilaki.


Ndambo ya mibali bayaki, bamemaki ebosono moko na tsipoyi ; balukaki nzela ya kokotisa ye kati na ndako mpo na kotia ye liboso ya Yesu.


Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami » to « telema mpe tambola ? »


Apusanaki mpe asimbaki tsipoyi oyo bazalaki komema na yango mwana oyo akufaki, mpe bato oyo bazalaki komema yango batelemaki. Yesu alobaki : — Elenge mobali, nalobi na yo, lamuka !


Kasi Yesu asimbaki ye na loboko mpe alobaki : — Mwana na Ngai, lamuka !


Sima na Yesu koloba bongo, agangaki : — Lazare, bima !


pamba te opesaki Ye bokonzi likolo ya bato nyonso, mpo ete apesa bomoi ya seko epai ya bato nyonso oyo opesaki Ye.


Ezali na moto moko te oyo asila komata na Likolo, longola kaka Ye oyo akita wuta na Likolo : Mwana na Moto.


mpe apesaki Ye bokonzi ya kosambisa bato, mpo ete azali Mwana na Moto.


mpe alobaki na ye na mongongo makasi : — Telema ngwi na makolo na yo ! Mbala moko, moto yango apumbwaki mpe akomaki kotambola.


Ezali Ye nde Nzambe atomboli na nzela ya loboko na Ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bana ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango.


Petelo alobaki na ye : — Ene, Yesu-Klisto abikisi yo ; telema mpe kanga etoko na yo. Mbala moko, Ene atelemaki.


Petelo abimisaki bato nyonso ; bongo afukamaki mpe asambelaki. Wana azalaki kotala epai ebembe ya mama Dorkasi ezalaki, alobaki : — Tabita, telema ! Tabita afungolaki miso ; mpe wana amonaki Petelo, avandaki.


Mpe kati na bitelemiselo yango, ezalaki na moto moko lokola Mwana na Moto. Alataki nzambala ya molayi mpe mokaba moko ya wolo zingazinga ya tolo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ