Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.
« Mpe Ngai, likolo ya misala mpe makanisi na bango, nakomi pene ya kosangisa bato ya bikolo mpe nkota nyonso ; bongo bakoya mpo na komona nkembo na Ngai.
Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, alobaki na bango : — Bokonzi nyonso oyo bavandi na yango bakomi kobunda bango na bango ekobebisama ; engumba nyonso to ndako nyonso oyo bato na yango bazali lisusu na bomoko te ekowumela te.
Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : — Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ? Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ; mayele na bino ezali kaka ya kozipama ; bozali na mitema makasi ;
Boye, Petelo atunaki ye : — Ananiasi, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo ?
Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.
Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.