Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 5:20 - Mokanda na Bomoi

20 Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki : — Molingami na Ngai, masumu na yo elimbisami !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 5:20
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Anjelu alobaki : — Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko.


Solo, pasi na ngai ebongwani esengo ; na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa ; obwaki masumu na ngai nyonso sima na mokongo na yo.


Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango : — Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.


Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola ? »


Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono : — Mwana na Ngai, masumu na yo elimbisami.


Bongo Yesu alobaki na mwasi : — Masumu na yo elimbisami.


Azalaki ata na posa te ete bayebisa Ye makambo na tina na bato, pamba te ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki kati na mitema na bango.


Sima na mwa tango, Yesu amonaki, kati na lopango ya Tempelo, moto oyo abikaki. Alobaki na ye : — Tala, omoni ndenge okomi sik’oyo nzoto kolongono. Kosala lisusu masumu te, noki te likambo moko ya mabe koleka ekomela yo.


Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.


Azalaki koyoka ndenge Polo azalaki koteya. Polo atalaki ye malamu, amonaki ete azali na kondima mpo na kobikisama


Moto nyonso oyo bino bolimbisi, ngai mpe nalimbisi ye ; mpe likambo oyo ngai nalimbisi, soki ezalaki penza na likambo ya kolimbisa, nalimbisi yango mpo na bolamu na bino na miso ya Klisto,


Boyikanaka mpiko ; mpe soki moko azali na likambo ya kopamela moninga na tina na yango, bolimbisanaka. Bolimbisaka ndenge Nkolo alimbisaki bino.


Nzokande moto mosusu akoki koloba : « Yo ozali na kondima ; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala ; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ