Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 5:17 - Mokanda na Bomoi

17 Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bayaki kovanda wana ; bawutaki na bamboka nyonso ya Galile, na Yuda mpe na Yelusalemi. Mpe nguya ya Nkolo ezalaki elongo na Yesu mpo na kobikisa babeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 5:17
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye :


Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso ; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye.


bakokanga banyoka na maboko na bango ; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te ; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.


Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki : — Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.


Mbala moko, Yesu mpe asosolaki ete nguya moko ebimi kati na Ye ; abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki : — Nani asimbi Ngai na bilamba ?


Bafarizeo mpe ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi basanganaki zingazinga ya Yesu.


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba : — Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe kolia mesa moko elongo na bango.


Sima na mikolo misato, bamonaki Ye kati na lopango ya Tempelo avandi na kati-kati ya balakisi ya Mobeko, azali koyoka bango mpe kopesa bango mituna.


Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bakomaki kokanisa : — Moto oyo azali komimona penza nani mpo ete abimisa maloba ya kotiola Nzambe ? Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ?


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu : — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?


Bato nyonso balukaki kosimba Ye, pamba te nguya moko ezalaki kobima kati na Ye mpe ezalaki kobikisa bato nyonso.


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko baboyaki mokano ya Nzambe mpo na bango, pamba te baboyaki ete Yoane abatisa bango.


Kasi Yesu alobaki : — Moto moko asimbi Ngai ; nayebi ete nguya ebimi kati na Ngai.


Yesu alobaki na ye : — Ndenge nini yo, molakisi mobimba oyo okenda sango kati na Isalaele, ozali kososola te makambo oyo ?


Nzokande, moto nyonso oyo atambolaka na solo ayaka epai pole ezali mpo ete misala oyo asalaka, na boyokani elongo na Nzambe, emonana polele.


Nzambe azalaki kosala bikamwa ya somo na nzela ya Polo.


Boye, sembola loboko na Yo mpo na kobikisa babeli, kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene, na Kombo na Yesu, Mosali na Yo, Mosantu.


Kasi Mofarizeo Gamalieli, molakisi ya Mobeko mpe moto ya lokumu mingi na miso ya bato nyonso, atelemaki kati na Likita-Monene mpe atindaki ete babimisa bantoma mpo na mwa tango moke.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ