16 Kasi mbala mingi, Yesu azalaki kokende na bisika epai wapi azalaki kaka Ye moko mpo na kosambela.
Sima na Ye kozongisa bato, amataki na ngomba mpo na kosambela na esika oyo azalaki kaka Ye moko. Kino na pokwa, azalaki wana kaka Ye moko.
Sima na Ye kozongisa bato yango, amataki na ngomba mpo na kosambela.
Wana bato nyonso bazalaki kokende kozwa libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Mpe wana Yesu azalaki kosambela, Likolo efungwamaki,
Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe.
Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.
Wana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali.
Kasi, lokola Yesu ayebaki ete bazali na makanisi ya kokamata Ye mpo na kokomisa Ye mokonzi, abendanaki lisusu na ngomba mpo ete azala kaka Ye moko.