6 Satana alobaki na Yesu : — Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, pamba te epesamela ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo nalingi.
Amani abetelaki bango lisolo ya bomengo na ye oyo ezalaki penza ebele, motango ya bana na ye mpe makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala mpo na kopesa ye lokumu mpe ndenge nini atombolaki ye likolo ya bakambi mpe bakalaka mosusu.
Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azwaki mokano yango mpo na kosambwisa lolendo ya nkembo nyonso mpe kokitisa kino na se bato nyonso ya lokumu, oyo bazali na mabele.
Boye, mboka ya bakufi ekoyoka nzala makasi mpe ekofungola monoko na yango makasi ; bato ya lokumu elongo na bato pamba ya engumba bakokita kuna nzela moko mpe na loyenge na bango.
Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.
oyo bozalaki kosala na kala mpo na kobika bomoi na bino tango bozalaki kotambola kolanda baposa ya mokili oyo, mpe tango bozalaki kolanda mokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sik’oyo kati na bato oyo bazangi botosi epai ya Nzambe.
Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.
Nyama oyo namonaki ezalaki lokola nkoyi. Makolo na yango ezalaki lokola ya ngombolo, mpe monoko na yango lokola ya nkosi. Dalagona epesaki nyama wana nguya na yango, kiti na yango ya bokonzi mpe bokonzi monene.