44 Mpe Yesu akobaki koteya kati na bandako ya mayangani ya Yuda.
Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso.
Boye, atambolaki na Galile mobimba ; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani mpe kobengana milimo mabe.
Azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, mpe bato nyonso bazalaki kokumisa Ye.
Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe.