41 Milimo mabe mpe ebimaki kati na bato ebele na koganga : « Ozali solo Mwana na Nzambe ! » Kasi Yesu apesaki yango mitindo ete eloba te, pamba te eyebaki ete Yesu azali Klisto.
Kasi Yesu abatelaki kimia. Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye : — Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo : « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. »
Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango ; abikisaki mpe babeli nyonso.
mpe Yesu alobaki na ye : — Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
bongo Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na pasi ya ndenge na ndenge, abenganaki milimo mabe ebele mpe apekisaki yango koloba ; pamba te milimo mabe eyebi nani oyo Ye azali.
Yesu agumbamaki pembeni na ye, apesaki mitindo na fievele, mpe fievele esilaki. Kaka na tango yango, mama-bokilo ya Simona atelemaki mpe akomaki kobongisela bango bilei.
Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.