36 Bato nyonso bakamwaki mpe bakomaki kotunana : — Oyo ezali lisusu maloba nini ! Azali kopesa mitindo epai ya milimo mabe, na bokonzi mpe na nguya nyonso, mpe yango ezali kobima !
Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki : — Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te !
Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kotunana : — Oyo ezali lisusu likambo nini ? Tala mateya ya sika oyo etondi na nguya ! Azali kopesa mitindo ata na milimo mabe, mpe ezali kotosa Ye !
Bato bakamwaki makasi mpe bazalaki koloba : — Azali kosala makambo nyonso malamu ; azali kosala ete ezala bato oyo bakufa matoyi bakoka koyoka, mpe bababa bakoka koloba.
Bato nyonso oyo bayokaki bango bakamwaki mingi makambo oyo babateli bibwele balobaki.
Bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te maloba na Ye ezalaki na bokonzi.
oyo akotaki kati na Likolo, avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kokonza ba-anjelu, banguya mpe milimo ya mipepe na likolo.