Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »
Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?
Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu.
bongo Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na pasi ya ndenge na ndenge, abenganaki milimo mabe ebele mpe apekisaki yango koloba ; pamba te milimo mabe eyebi nani oyo Ye azali.
mpe agangaki na makasi nyonso : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !
Anjelu azongiselaki ye : — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe.
Milimo mabe mpe ebimaki kati na bato ebele na koganga : « Ozali solo Mwana na Nzambe ! » Kasi Yesu apesaki yango mitindo ete eloba te, pamba te eyebaki ete Yesu azali Klisto.
Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai ? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te !
Bongo bato nyonso ya etuka ya bato ya Geraza basengaki na Yesu ete alongwa na etuka na bango, pamba te somo ekangaki bango. Boye Yesu amataki na bwato mpe akendeki.
Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.
Boye, lokola bana yango bazali na nzoto mpe makila, Ye mpe asanganaki elongo na bomoto na bango mpo ete, na nzela ya kufa na Ye, asilisa nguya ya Satana oyo azalaki kosimba nguya ya kufa,
Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana.
Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi : « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi : oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango ; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango.